RDC : Limemya mpo na bato ya mboka ezali ntina mingi mpo na kobundisa mok akatano ya klima

29 July 2024

Kobengana na makasi etuluku ya bankolo-mboka ya Batwa na mabele ya bankɔkɔ na bango na Parke national ya Kahuzi-Biega (PNKB) ezali kobuka ntomo na bango na boyangeli ya République démocratique du Congo (RDC), commission africaine des droits de l’homme et des peuples ezwi na ekateli moko monene.

Ekateli oyo ezali kondima ete Batwa bazali bakapita malamu ya bikelamu ndenge na ndenge mpe ezali kosɛnga ete bázonga na mabele na bango.

Samuel Ade Ndasi, mokonzi ya misala ya kolandela makambo ya Union africaine mpe ya kobundela ntomo ya bato na Minority Rights Group (MRG) alobi ete: “Oyo eza bolongi monene mpona lisanga ya kosambisa makambo ya klima. “Ekateli oyo eboyi likanisi ete kosilisa mokakatano ya klima esengaka bato ya bamboka ya liboso bálongwa na mboka na bango mpe kobɔtɔla mabele na bango. Kasi, epesi ndakisa ya makasi oyo ezali kondima motuya ya boyebi ya bonkɔkɔ ya bankolo-mboka mpe mayele ya kobatela ezingelo mpe bikelamu ya bomoi. Banda sikoyo, etuluku moko te ya bankolo-mboka moko esengeli kobengana bango na nkombo ya libateli, ata na esika nini na Afrika.”

Na mibu 1970, babenganaki Batwa na bandako na bango na mobulu nyonso mpe balongolaki bango na mabele ya bankɔkɔ na bango mpona kobongisa nzela ya kosala PNKB. Basili komibwaka na boumeli ya bambula mingi ya bobola makasi, koponapona makasi, kozanga mabele mpe ndenge ya kokamwa ya kokufa na bisika ya kofanda ya libaku malamu na pembeni ya parke. Na bambula mibale ya mpasi makasi oyo esalemaki banda babenganaki bato na mboka, motango ya Batwa oyo babenganaki na parke ekitaki longwa na bato pene ya 6 000 kino na 3 000 mpamba.

Na 2022, bolukiluki moko ya MRG elobelaki kampanye ya mbula misato ya mobulu oyo bakonzi ya parke mpe basoda ya Congo babongisaki mpo na kobengana Batwa na mabele na bango, yango esalaki ete bato pene ya 20 bakufa, bato ya mobulu oyo babebisaki bato pene ya 15, mpe bato mingi mosusu bakimaki na makasi.

Likambo oyo, oyo MRG mpe Environnement, Ressources Naturelles et Developpement (ERND) ememaki yango na nkombo ya bato ya Batwa, emonisaki ndenge bazali kobengana bato na mobulu mpe kobuka ntomo ya bato oyo bato ya Batwa baza na yango. Bafundaki likambo yango na 2015.

Joséphine M’Cibalida, mosangani ya etuluku ya Batwa, ayebisi makambo oyo akutanaki na yango: “Ntango tozalaki kosala bokila, bato ya Leta bakɔtaki na mboka na biso mpe bazwaki libaku ya kotumba bandako na biso, kotikáká biso na esika ya kolala mpe ya mpamba. Tobungisi biloko nyonso, ata mpe lokumu na biso lokola bato. Lisambisi oyo epesi biso elikya ya kozwa bosembo mpo na mabe oyo basaleli biso.”

Mpo na mbala ya liboso, ekateli ya Comission endimi mpenza mosala ya ntina mingi ya bankolo mboka na kobatela ezingelo mpe bikelamu ya bomoi. Amonaki ete bamodele ya kobatela banyama oyo elongolaka bankolo mboka na mabele na bango ezali malamu te mpo na kosilisa mbongwana ya klima na Afrika.

Batoli ya ntina mingi ya Commission mpo na Gouvernement ya RDC ezali boye:

  • Bimisa bolimbisi ya mobimba ya bato nyonso epai ya Batwa, kondima minyoko ya liwa oyo esalemaki na ba-eco-guard, liwa euti na kobengana bato, mpe makambo ya bomoi mabe oyo batyaki na Batwa na yango;
  • Na kolanda mibeko kondima Batwa lokola bana-mboka nyonso ya R.D.Congo;
  • Mpo na kofuta lifuti na etuluku ya Batwa;
  • Kolekisa ndelo mpe kopesa batitre ya lisanga na Batwa na bateritware ya bankɔkɔ na kati ya PNKB;
  • Kosala mosolo mpo na bokoli ya bato mpe kokabola mbongo oyo parke ezali kozwa na Batwa;
  • Kolongola bato oyo baza te Batwa na mabele ya bankɔkɔ ya Batwa.

Jean-Marie Bantu Baluge, molobeli ya ERND, alobi: “Kobikisama ya ntómo ya bato ya mboka na mabele mpe bozwi ya bankɔkɔ na bango eza ntina mingi mpo na kobika na bango mpe kobatela bikelamu ya bomoi. Ekateli ya Commission epesi lobiko na bato ya Batwa mpe na bamboka mosusu ya liboso na Basin ya Congo oyo banyokolaki bango banda koleka katikati ya ekeke na nkombo ya kobatela yango.”

Bolukiluki ya MRG emonaki mpe ete bato ya mikili mingi oyo bapesaka lisungi na PNKB, na ndakisa baguvernema ya Allemagne mpe ya Etats-Unis mpe lisanga ya mokili mobimba oyo ebatelaka banyama ya zamba, bakoki kosangana na makambo wana ya mabe, ata mpe na kobuka mobeko ya kopekisa mindoki oyo conseil de sécurité ya ONU etye.

Union africaine endimaki mpenza ekateli ya Commission. Bango mibale endimamaki na conseil executif mpe na liyangani na makita na bango ya ordinaire oyo esalemaki na sanza ya mibale 2023 na Addis Abeba, na Ethiopie. Kasi, kobimisama na yango eumeli basanza mingi. MRG azwaki kopi ya corrigendum na Ekateli, ezalaki na bandimbola ya ntina mingi na suka ya sanza ya motoba 2024. Corrigendum ekozala na site internet ya Commission africaine na ntango ebongi.

Mpo na koyeba makambo mosusu, benga biso.

Mikanda epai ya bakomi

Elilingi oyo emonisami: mobali moko ya lisangá ya Batwa azali kotambola likoló ya banzete oyo bakatá na mabelé oyo bakatá bazamba na nsɔngɛ ya Parc national ya Kahuzi-Biega. Yanuali 2022. Ezwami na Ed Ram.